Revelation of John 20

Emoniseli ya minei : bakangi Dragon na monyololo mpo na mbula nkoto

1Bongo namonaki anzelu moko azalaki kokita wuta likolo, asimbaki fungola ya libulu ya molai mpe monyololo moko ya monene. 2Akamataki Dragon, nyoka wana ya kala, oyo azali zabolo mpe satana, mpe akangaki ye na monyololo mpo na bambula nkoto moko. 3Anzelu abwakaki ye na libulu ya molai. Akangisaki yango mpe atiaki elembo likolo na yango, mpo ete akosa lisusu te bikolo, kino tangobambula nkoto moko ekokoka. Bongo na sima, esengeli batika ye mpo na mwa tango moke.

Emoniseli ya mitano : elonga ya suka likolo ya Satana

4Bongo namonaki bakiti ya bokonzi na baoyo bafandelaki yango ; bapesaki bangobokonzi ya kosambisa bato. Namonaki milimo ya bato oyo bakataki bango mitu mpo na litatoli ya Yesu mpe mpo na liloba ya Nzambe. Baboyaki kosambela nyama mpe na elilingi na yango, mpe bazwaki te elembo na bilongi na bango mpe na maboko na bango ; bazongaki na bomoi, mpe bazalaki na bokonzi bambula nkoto moko elongo na Kristo.

5Bato mosusu oyo bakufaki, bazongaki na bomoi te kino tango bambula nkoto moko ekokaki. Yango nde Lisekwa ya liboso. 6Esengo mpe mosantu, bato oyo bakosekwa na lisekwa ya liboso ! Liwa ya mibale ezali lisusu na nguya te likolo na bango ; kasi bakozala banganga-Nzambe ya Nzambe mpe ya Kristo, mpe bakozala na bokonzi elongo na ye, bambula nkoto moko.

7Tango bambula wana nkoto moko ekokoka, bakobimisa Satana na boloko, 8mpe akokende kokosa bikolo oyo ezali na bipai nyonso minei ya mokili mobimba, Gogi mpe Magogi, mpo asangisa bango esika moko mpo na kobunda etumba ; bakozala ebele, ebele penza lokola zelo ya ebale monene.

9Bongo bapanzanaki na mokili mobimba, bazingaki mboka ya basantu, mpe vile oyo Nzambe alingaka mingi. Kasi moto ewutaki na likolo, ekitelaki bato wana mpe ebomaki bango.

10Bongo zabolo oyo azalaki kokosa bango, babwakaki ye na laki ya moto mpe ya sufulu, esika babwakaki nyama mpe moprofeta ya lokuta. Kuna bakomona pasi seko, butu na moi.

Emoniseli ya motoba : kosambisama

11Bongo namonaki Kiti monene ya bokonzi ya pembe. Moto moko avandelaki yango. Likolo mpe nse ekimaki liboso ya elongi na ye, mpe esika ezwamaki te mpo na yango. 12Bongo namonaki bato bakufa : bato minene mpe bato pamba batelemakiliboso ya Kiti ya bokonzi. Babuku efungwamaki ; mpe Buku mosusu efungwamaki, yango nde Buku ya bomoi. Bongo bato basambisaki bato bakufa, moto nyonso na makambo oyo ye asalaki, ndenge ekomamaki na babuku wana.

13Ebale monene ezongisaki bakufi nyonso oyo bazalaki kati na yango ; liwa mpe mboka ya bakufi ezongisaki bakufi oyo bazalaki kati na yango ; bongo moto nyonso asambaki na makambo oyo ye asalaki.

14Liwa mpe mboka ya bakufi ebwakamaki na laki ya moto. Laki yango ya moto yango nde : liwa ya mibale. 15Mpe moto nyonso oyo kombo na ye ekomamaki te na Buku ya bomoi, babwakaki ye na laki ya moto.
Copyright information for LinMNB